Maya
Simaro Massiya Lutumba Lyrics


Jump to: Overall Meaning ↴  Line by Line Meaning ↴

Maya

Oh Maya mon amour
Yoka mongongo mozali kobelela yo na kati ya butu

Yoka lokole na suka ya mboka
Ozali moto, kanisa
Nakomi lokola litanga ya mbula pembeni ya ebale, Maya
Kasi, ata butu eyindi makasi,
tongo ekosukaka se etana

Nazali responsable na yo
Yo nde ozali coupable ya misère na ngai

Maya, ngai nakangi maboko na moto,
makambo matondi ngai motema
nakomi kotanga mikolo na misapi,
nakomi nde kobanga

Mbala ya liboso tosalaki matata,
ezalaki kaka boye
Soki nafungolaki miso te
olingaki oboya ngai

Maya ngai natii loboko na litama
Makambo matondi ngai motema
Nakomi kotanga basanza na misapi
nakomi nde kobanga

Mbala liboso okendeki Isiro ezalaki kaka boye
Soki nafutaki tike te nalanda yo
Olingaki ozonga te

Maya, namiswi lolemo,
nazoki makila masangani na soi ya monoko,
mosusu nabwaka mosusu namela
nakomi na badoute

Mbala eleki osengaki divorce ebandaki kaka boye
Soki nalandaki lolendo na yo,
ezalaki se tokabwana

Oh, Kisasa, Kisasa mboka te
Moto azali kokufa, bango bazali koseka

Moto nakei kosenga conseil
akomi nde koseka pe kotongoko ngai na pembeni
Likambo ya kokamwa

Zuzi oyo amesana koasambisa matata ya ngai na yo maya
Nzoka nde alulaka yo lisusu
Mokili compliqué

O mama namipikoli suki na moto
Sango nayoki naboyi nde kondima
Nazangi confiance na matoi na ngai moko
Nzoto ekomi somo somo

Moto aliaka na ngai sani moko lelo oyo akoma mbanda
Boni yo kanda lokola liwa
Osali zoba lokola ndoki

O mama namipikoli suki na moto
Sango nayoki naboyi nde kondima
Nazangi confiance na matoi na ngai moko
Nzoto ekomi somo somo

Moto aliaka na ngai sani moko lelo oyo akoma mbanda
Boni yo kanda lokola liwa,
Osali zoba lokola ndoki yeyeh

Maya, nakomi lokola moto baswi na nyoka
Nakomi kobanga ata moselekete ya pamba Pasi ya moninga
bakoyokaka na matoi kaka lokola lisolo
Kasi ekosala yo na motema lokola ye te

Bakabaka, badefisaka, basimbisaka,
kaka se mbongo Maya
Kasi Bokono to pasi ya bolingo,
héritier azalaka te

Maladi ya bolingo,
dokotolo azalaka te
Ekosilaka se na moto oyo apesaki yo yango

Bakendeke bongo te ata ko asiliki
abungaka nzela ya ndako te
kasi ekomi lelo ngai naluka,
toyokanaka bongo te ooh

Nalingaka toswana,
Po tomesana,
nyonso abiance ya libala
Bitumba, bazuwa na miso ya bato
Namesana kobondela yo

O nzambe
Nzambe, nazwi nde etumbu
Nakangami na motambo
Lisumu nini nasali
po nameriter etumbu ya motindo oyo

Nameki pe mbala mingi po naboya ye
Kasi nakokokaka te
Epai ko bolingo
Epai ngai pe ko moto ya maladi
Tokosuka boni?

Mokanda kutu nalingaka natindela yo, Maya
Epasuki na matanga ya motoki ya susi na yo
Maya, okomisi ngai kanda kanda na mokili

Nzambe asala eloko oyo bolingo,
Eloko oyo monyokoli
Ngai ko nalelaka libala bandeko,
Nzambe atindeli ngai elima

Ngai ko natuti libaku ya mabe,
lisuma na lavi
Likambo te, Maya bala na yo,
nazingi nde maboko

Ngai nakoluka moyen nabosana
soki pe nakokoka
Natingama lisusu nini
Nakanga se motema ee

Awa ko bobotoli ngai ye
Boremplacer ngai nani
Nakei kolela na se ya mbula
Naboyi mpinzoli etika bilembo na matama ee

Oyo nyonso foti ya mama
Aponela ngai motema
Motema ya kolinga baninga ya mokili
Tika nanyokwama boye

Vieux MASASI,
wapi BALENGE
AMISI ee

Maya, soki mokolo mosusu oloti ndoto kati ya butu
Yebaka ngai wa yo
nazali kobanza yo

Eloko esali ngai nde makanisi
Tomeseneki mingi
Mokili monuni nanu te
Tina nini bolingo na biso enuna
mama

Maya, soki moyen ezali,
senga mbanda na ngai ya sika
Mokolo yo okokumba zemi, senga ye permission
Mwana ya liboso yo okobota,
azala mwana ya mobali,
azwa kitoko na yo,
pesa ye kombo na ngai
Mokili monuni nanu te
tina nini souvenir na biso ekola
mama

Tonton Dolina, tonton Vila, Bakali
Tonton Amiso, Tonton nsuka
bino bato bolinga lisano
Epai ya Siluvangi,
epai ya LONGOMBA,
na Faubourg epai ya Teddy Kinsala
na Sexy Pop epai ya BeberNa Lukanu epayi ya Mayard
na Exodus na Bandal
Soki bomoneli ngai Maya
Boyebisa ye

Epai akei, soki mobali atungisi ye
azonga, azonga ko
Po na nini akomionyokola,
esika na ye ezali awa
Nakangi maboko nazali kozela
nazali se na esika atikaki ngai
na se ya nzete ya lidame

Nzambe asala eloko oyo bolingo,
eloko oyo monyokoli
Nzambe asala eloko yo amour,
eloko oyo misère
Nzambe asala eloko oyo koaimer,
eloko yo matata
Ngai ko nalelaka libala bandeko,
Nzambe atindeli ngai kisimbi

Nzambe asala eloko oyo bolingo, eloko oyo matata
Ayez mama ayez pitié Maya, mama
Ayez pitié

Tango ya kolala nde tango tokokanisa maye tokosala lobi Mama,

Maya tia ngai na programme ya lobi mama,

Maya kanisaka ngai mama

Butu ekomi molai ngai pongi te miso

Tongo ekomi kotana
Maya kanisaka ngai mama





Butu ekomi molai Yo na démarche ya Cameléon Maya kanisaka ngai ee mama
(E N D)

Overall Meaning

The song "Maya" by Simaro Massiya Lutumba is a love song that talks about a man's undying love for his partner, Maya. It is apparent that the love portrayed in the lyrics is intense and unwavering. The singer talks about adoring Maya and being responsible for her. He accepts the responsibility and blames himself for any misfortunes she may experience, indicating that he is committed to her completely.


The lyrics also touch on the complexity of the world and the different issues that individuals face. The line "mokili compliqué" means that the world is complicated, and the singer is urging Maya to understand this fact. He also expresses his love for her and his desire to remain with her until the end of time. However, he is also aware that their love may face different obstacles, and he asks for grace to overcome them.


Line by Line Meaning

Maya
Oh Maya my love


Yoka mongongo mozali kobelela yo na kati ya butu
Understand that you are like a flower in the middle of the desert


Yoka lokole na suka ya mboka
Wake up and rise from the land


Ozali moto, kanisa
You are a human being, my church


Nakomi lokola litanga ya mbula pembeni ya ebale, Maya
I am like a raindrop on the side of a leaf, Maya


Kasi, ata butu eyindi makasi, tongo ekosukaka se etana
But even in the desert, another strength emerges, the sun rises again


Nazali responsable na yo
I am responsible for you


Yo nde ozali coupable ya misère na ngai
You are the one guilty of my misery


Maya, ngai nakangi maboko na moto, makambo matondi ngai motema
Maya, I raise my hands to the sky, my heart speaks to me


Nakomi kotanga mikolo na misapi, nakomi nde kobanga
I give days and nights, I am the one who suffers


Mbala ya liboso tosalaki matata, ezalaki kaka boye
Yesterday we had troubles, it was just a moment


Soki nafungolaki miso te, olingaki oboya ngai
If I don't close my eyes, you want to kill me


Maya ngai natii loboko na litama
Maya, I hold your hand tight


Makambo matondi ngai motema
My heart tells me everything


Nakomi kotanga basanza na misapi
I offer gifts and treasures


Nakomi nde kobanga
I am the one who suffers


Mbala liboso okendeki Isiro ezalaki kaka boye
Yesterday we went to Isiro, it was just a moment


Soki nafutaki tike te nalanda yo
If I don't find you, I will die


Olingaki ozonga te
You don't want to come back


Maya, namiswi lolemo, nazoki makila masangani na soi ya monoko, mosusu nabwaka mosusu namela
Maya, I weep silently, carrying the burden of my sorrows, sometimes I cry, sometimes I laugh


Nakomi na badoute
I am in distress


Mbala eleki osengaki divorce ebandaki kaka boye
Yesterday it seemed like divorce was imminent, it was just a moment


Soki nalandaki lolendo na yo, ezalaki se tokabwana
If I hold onto you for a long time, it becomes difficult


Oh, Kisasa, Kisasa mboka te
Oh, Kisasa, Kisasa, the city is not at peace


Moto azali kokufa, bango bazali koseka
People are dying, others are laughing


Moto nakei kosenga conseil
I need to seek advice


Akomi nde koseka pe kotongoko ngai na pembeni
But they just laugh and mock me by their side


Likambo ya kokamwa
The problem of deception


Zuzi oyo amesana koasambisa matata ya ngai na yo maya
This game that plays with my troubles and you, Maya


Nzoka nde alulaka yo lisusu
The snake is the one who deceives you the most


Mokili compliqué
The world is complicated


O mama namipikoli suki na moto
Oh mother, you never choose the right person for me


Sango nayoki naboyi nde kondima
The sun knows that I am hurt and crying


Nazangi confiance na matoi na ngai moko
I only have trust in myself


Nzoto ekomi somo somo
My soul is heavy


Moto aliaka na ngai sani moko lelo oyo akoma mbanda
Someone calls me from far away, today he is by my side


Boni yo kanda lokola liwa
Look at yourself, pale like a ghost


Osali zoba lokola ndoki
You walk around like a witch


Maya, nakomi lokola moto baswi na nyoka
Maya, I am like a person trapped by a snake


Nakomi kobanga ata moselekete ya pamba Pasi ya moninga
I suffer even more than a child lost in the forest, abandoned by its mother


bakoyokaka na matoi kaka lokola lisolo
They laugh at me like a joke


Kasi ekosala yo na motema lokola ye te
But they don't know what is really in your heart


Bakabaka, badefisaka, basimbisaka
They mock, mock, and ridicule


kaka se mbongo Maya
Just like the foolish Maya


Kasi Bokono to pasi ya bolingo, héritier azalaka te
But the crown of love, Héritier doesn't have it


Maladi ya bolingo, dokotolo azalaka te
The illness of love, the doctor doesn't have it


Ekosilaka se na moto oyo apesaki yo yango
It settles in the person who gave it to you


Bakendeke bongo te ata ko asiliki
They don't go far, even without a plan


abungaka nzela ya ndako te
They stumble on their own path


kasi ekomi lelo ngai naluka, toyokanaka bongo te ooh
But today, I rise up, I won't fall again, oh


Nalingaka toswana, Po tomesana, nyonso abiance ya libala
I wanted to ask for peace, so we could talk, to end all the troubles of life


Bitumba, bazuwa na miso ya bato
Tears, standing in the eyes of others


Namesana kobondela yo
I wanted to come close to you


O nzambe
Oh God


Nzambe, nazwi nde etumbu
God, I know you exist


Nakangami na motambo
I am struggling with a problem


Lisumu nini nasali po nameriter etumbu ya motindo oyo
What is it that I ask for, what do I request from this world


Nameki pe mbala mingi po naboya ye
I even called out many times to ask for him


Kasi nakokokaka te
But I couldn't find him


Epai ko bolingo
To find love


Epai ngai pe ko moto ya maladi
To make me a companion of happiness


Tokosuka boni?
Can we find it?


Mokanda kutu nalingaka natindela yo, Maya
In this lonely world, I wanted to follow you, Maya


Epasuki na matanga ya motoki ya susi na yo
But I got on the train of your deceit


Maya, okomisi ngai kanda kanda na mokili
Maya, you put me in chains in this world


Nzambe asala eloko oyo bolingo, Eloko oyo monyokoli
God knows this place of love, this deceitful place


Ngai ko nalelaka libala bandeko, Nzambe atindeli ngai elima
I am waiting for you, my brothers, God will protect me


Ngai ko natuti libaku ya mabe, lisuma na lavi
I carried the burden of sadness, the darkness of life


Likambo te, Maya bala na yo, zingi nde maboko
It's not easy, Maya, look at yourself, raise your hands


Ngai nakoluka moyen nabosana soki pe nakokoka
I changed my path because I couldn't find my way


Natingama lisusu nini
I don't know what else to do


Nakanga se motema ee
I am lost in my heart


Awa ko bobotoli ngai ye
Now you have abandoned me


Boremplacer ngai nani
Replace me with someone else


Nakei kolela na se ya mbula
I am left alone in the rain


Naboyi mpinzoli etika bilembo na matama ee
I feared to sleep under the stars and the moon


Oyo nyonso foti ya mama
Everything started from my mother


Aponela ngai motema
She protected my heart


Motema ya kolinga baninga ya mokili
A heart that loves the people of the world


Tika nanyokwama boye
Don't leave me alone


Vieux MASASI, wapi BALENGE AMISI ee
Old MASASI, where are BALENGE and AMISI?


Maya, soki mokolo mosusu oloti ndoto kati ya butu
Maya, if another day comes to break the dream in the desert


Yebaka ngai wa yo
Remember me


nazali kobanza yo
I am waiting for you


Eloko esali ngai nde makanisi
That place is my only hope


Tomeseneki mingi
We have many things to discuss


Mokili monuni nanu te
This world is not for us


Tina nini bolingo na biso enuna mama
What is left of our love, mother


Maya, soki moyen ezali, senga mbanda na ngai ya sika
Maya, if there is another way, send me a sign today


Mokolo yo okokumba zemi, senga ye permission
When the day dawns, ask for permission from it


Mwana ya liboso yo okobota, azala mwana ya mobali, azwa kitoko na yo, pesa ye kombo na ngai
The child at the beginning, you will be a child of a man, born beautiful, give him my regards


Mokili monuni nanu te tina nini souvenir na biso ekola mama
This world is not for us, what memories do we have left, mother


Tonton Dolina, tonton Vila, Bakali Tonton Amiso, Tonton nsuka bino bato bolinga lisano
Uncle Dolina, Uncle Vila, Uncle Bakali, Uncle Amiso, Uncle Nsuka, all people love each other


Epai ya Siluvangi, epai ya LONGOMBA, na Faubourg epai ya Teddy Kinsala na Sexy Pop epai ya BeberNa Lukanu epayi ya Mayard na Exodus na Bandal
In Siluvangi we have Uncle LONGOMBA, in Faubourg we have Uncle Teddy Kinsala, in Sexy Pop we have Uncle Beber, in Lukanu we have Uncle Mayard, and in Exodus we have Uncle Bandal


Soki bomoneli ngai Maya Boyebisa ye
If you find Maya, let her know


Epai akei, soki mobali atungisi ye azonga, azonga ko
If a man holds her, let him go, let him go


Po na nini akomionyokola, esika na ye ezali awa
For what reason would he want to hold her, her place is here


Nakangi maboko nazali kozela
I raise my hands to the sky


nazali se na esika atikaki ngai na se ya nzete ya lidame
I am here, waiting for the one who will take me from this place of suffering


Nzambe asala eloko oyo bolingo, Eloko oyo monyokoli
God knows this place of love, this deceitful place


Nzambe asala eloko yo amour, eloko oyo misère
God knows this place of love, this place of misery


Nzambe asala eloko oyo koaimer, eloko yo matata
God knows this place of love, this place of trouble


Ngai ko nalelaka libala bandeko, Nzambe atindeli ngai kisimbi
I am waiting for you, my brothers, God will protect me with a shield


Nzambe asala eloko oyo bolingo, eloko oyo matata
God knows this place of love, this place of trouble


Ayez mama ayez pitié Maya, mama
Have mercy on me, Maya, oh mother


Ayez pitié
Have mercy


Tango ya kolala nde tango tokokanisa maye tokosala lobi Mama
The time to sleep is the time we become one, let's leave everything to fate, Mama


Maya tia ngai na programme ya lobi mama
Maya, guide me in the program of love, Mama


Maya kanisaka ngai mama
Maya, illuminate me, Mama


Butu ekomi molai ngai pongi te miso
Darkness becomes my companion, I can't close my eyes


Tongo ekomi kotana Maya kanisaka ngai mama
The night becomes united, Maya, illuminate me, Mama


Butu ekomi molai Yo na démarche ya Cameléon Maya kanisaka ngai ee mama
Darkness becomes my companion, with the steps of a chameleon, Maya, illuminate me, Mama


(E N D)
(End)




Contributed by Jayce C. Suggest a correction in the comments below.
To comment on or correct specific content, highlight it

Genre not found
Artist not found
Album not found
Song not found
Comments from YouTube:

@fredrickkassilly3142

One Of The Songs That Introduced Me To University Life In The Late 80s. Real Music!! Fond Memories. RIP Simaro

@ruthimo9463

🎉

@bensonotieno4928

Simaro was indeed a poet. His compositions are out of this world. I can compare him to our very own D.O Misiani.

@LaurelinTheOther

alikuwa le poète mkuu wa kongo

@ndoreremoise6053

Chanson nostalgique et inoubliable paix à son âme.quel musicien va renaître la musique congolais qui a perdu sa Saveur,valeur,difficile à comprendre mes frères.nous avons piraté notre lumba oooh la belle époque de Maya

@bookerbookers3187

Maya... even if the night is very dark ...the day ends up being seen....a great song by Lutumba

@bethwanjira695

nothing can compare to this mans golden voice. I call it music that speaks to the soul.

@aliceibate8581

Je ne cesserai jamais d'écouter cette chanson parmi mes meilleurs de la liste je me rappelle des tas de souvenirs Ah!Zaïre mon beau pays avec toutes diversités dont la musique merci mon Dieu pour être née Zaïroise

@lazarussepuru428

Lutumba's music forms part of my soul therapy! I love Congolese music!!

@stevevt

Nous avons nommé notre fille Maya, en 1995, en partie à cause de cette belle chanson - magnifique.

More Comments

More Versions